Virus de l'Immunodéfience Humaine
From Wikipedia
Virus de l'Immunodéfience Humaine (VIH) (lifalansé) ezali ngɛngɛ ya Sida.
Etápe |
[kobalola] Lolenge Moto akoki kokaba to kozua VIH pe danger ya kobela SIDA
Epayi nini tina ya kobanga ezali na esika nini eloko ya kobanga ezali te (Epayi nini esengeli obanga likama na esika nini tina ya kobanga ezali te): Situations / Tina ya kobangas / Toli
Manguele mpe kisi ezali te po na kobatela Moto azua VIH to bokono ya SIDA te. Kasi lolenge moko ya pete pe ebatelaka malamu ezali: kapoti to kondome. Mokanda oyo ekolakisa yo tango nini esengeli omibatela penza, pe bisika nini na makambo nini yo na mwasi to mobali bolingani na ye bokoki kosala epe ndenge ya kozua VIH to bokono ya SIDA ezala te.
Okoki kozua VIH (Virus de l’Immunodéficience Humaine acquise to bokono ya SIDA) soki makila, mayi ya soka ya mobali to sperme, mayi ya libolo ya mwasi to sécrétions vaginales ya Moto mosusu oyo asili kozua bokono wana ekoti na kati ya misisa ya makila oyo ezali kotambola na nzoto na yo. Tanga na liste elandi lolenge kani Moto akoki kokaba to kozua VIH to bokono ya SIDA. Na tango ya koyebana nzoto to kosibana na mwasi to mobali oyo oyebi ye sika, lata (soki ozali mobali) to latisa (soki ozali mwasi) kapoti to kondome. Na tango inso!
[kobalola] Kondome to kapoti pe kisi ya muselu
Kondome ebatelaka Moto azua bokono te na tango ya kosangana ya bolingo to kosibana. Esengeli kolata kapote to kondome ya marques ya qualité ya malamu oyo eyebani pe kozala na ekenge na kotanga mokolo nini Kondome wana ekosila valeur. Soki mokolo wana ekoki kolata to kolatisa kondome wana lisusu te. Tango mosusu ekosenga ozua kisi ya muselu mpo eloko ya mobali ekota na pasi te to kondome to kapote epasuka te. Kasi ekosenga kisi ya muselu wana ezala ya malamu. Kondome ya latex (caoutchouc) elingaka kaka kisi ya muselu oyo ezali ya mafuta te. Mafuta (huiles, graisses), lotions, cremes, to vaseline ekoki kotinda kondome wana epasuki, yango esengeli kozua kaka kisi ya muselu oyo elingaka mayi to hydrophile, okoki kosomba yango esika batekaka bakisi to famasi, na ba magasins oyo babengi drogueries, pe na esika batekaka bikolo etali lisano ya bolingo to Sexshop.
[kobalola] Tina ya kobanga ezaki monene makasi
- Tonga (séringue to aiguille) moko po na bato mibale to bato mingi: Tina ya kobanga ezali monene makasi. Soki bato mibale to ebele bamitubi na tonga moko mpo na kisi to bangi ya putulu, danger ya kokaba to kozua VIH to bokono ya SIDA ezali munene penza. Komeka te te te. Batuba yo te tonga oyo basi batubi Moto mosusu. Esengeli pe ko stériliser (koboma bokono ya) biloko nyoso etali makambo ya kotuba tonga.
- Kosibana na nzela ya nyei to mosomba (sexe anal) soki omibateli te: Tina ya kobanga ezali monene makasi. Soki batu bazali kosibana na masoko kasi soka elati kondome te, na oyo azali kosiba na oyo bazali kosiba bango mibale bazali ya Tina ya kobanga. Surtout oyo bazali kosiba ye na mosomba azali na tina ya kobanga monene penza, azala mwasi to mobali. Tina ya kobanga ezali pe soki mayi ya soka (sperme) ebwakami te. Awa esengeli penza kolata to koyebisa moninga alata kapote (kondome) pe kozua quantité ya malamu ya kisi ya muselu.
- Kosibana na libolo (sexe vaginal) soki omibateli te: Tina ya kobanga ezali monene. Soki mobali na mwasi bazali kosibana pe moko na bango azali na VIH to bokono ya SIDA kasi bamibateli te, wana mosusu akoki kozua bokono yango na lombango penza. Esengeli kolata kapote (kondome) to koyebisa mobali alata kondome.
- Kofiba na soka to libolo (sexe oral), ozala mwasi to mobali: Tina ya kobanga ezali. Mobali akoki kokaba bokono soki mayi ya soka to sperme na ye ezali na VIH to bokono ya SIDA pe abwaki mayi (sperme) wana na munoko ya mwasi to ya mobali mosusu. Soki pe mwasi asili kozua VIH to bokono ya SIDA mayi ya libolo to sécrétions vaginales na ye ekoki kokaba bokono wana na Moto mosusu, yango esengeli kosala nyoso mayi ya soka to ya libolo ekota na munoko te. Soki mobali nde azali kofiba soka ya moninga mobali, esengeli penza mobali wana alata kapote (kondome).
- Mwasi ya zemi oyo azali na VIH to bokono ya SIDA: Tina ya kobanga ezali monene mpo na mwana. Mama akoki kopesa mwana na ye VIH to bokono ya SIDA liboso ya kobota (tango mwana azali naino na libumu), na tango ya kobota (tango mwana azali kobima) to sima ya kobota (tango ya komemisa mwana mabele). Soki lisungi na niveau ya ba munganga to encadrement médical ezali makasi, Tina ya kobanga ya mwana wana ekoki kokita makasi. Ezali malamo mwasi nyoso na mobali wa ye basala test ya VIH to bokono ya SIDA soki balingi kozua mwana kasi eyebani penza te soki moko na bango to bango nyoso bazali na VIH to bokono ya SIDA to te. Malamo kosenga liboso toli epayi ya monganga.
[kobalola] Tina ya kobanga ezali te
- Besi (bisoux), besi ya lolemu (tire-langue): Tina ya kobanga ezali te mpo na besi ya litama to bisoux. Moto akoki koloba te ete VIH to bokono ya SIDA bakabaka to bazuaka yango te na besi ya lolemu. Kasi na mokili mobimba kina lelo balakisa naino te ete Moto azi azua bokono sa SIDA na besi ya lolemu.
- Soki nzoto to poso ya Moto ekutani na ya Moto mosusu.: Tina ya kobanga ezali te soki nzoto to poso etutani neti tango ya kopesana mbote, ya caresses pe ya kosakana likolo likolo.
- Kokaba to kozua bokono ya SIDA na mupepe: Tina ya kobanga ezali te. Ata soki Moto akosoli to asali entse akoki kokaba VIH to bokono ya SIDA te.
- Kovanda na kati ya libota to na baninga esika moko: Tina ya kobanga ezali te. Moto akoki kozua VIH to bokono ya SIDA te, ata soki avandi na Moto azali na bokono wana pene pene neti na kati ya libota to na lisanga moko.
- Kolia na ndako pe na restaurant: Tina ya kobanga ezali te.
- Soki insekte neti nzinzi, ngungi to nzoyi esui yo: Tina ya kobanga ezali te.
- Basani, lutu, kanya, mbeli, kopo, bilamba ya kolata na ya kotanda na mbeto: Tina ya kobanga ezali te. Batu bakoki kosalela basani, lutu, kanya, mbeli to kopo elongo, bobangi ya kokaba to kozua bokono ya SIDA ezali te. Ata bilamba ya kolata to ya kotanda mbeto ya Moto oyo azali na bokono ya SIDA, esengeli te kosukola yango yango moko.
- Eziba (piscine), sauna, kikoso (toilettes, wc, salle de bain): Tina ya kobanga ezali te. Okoki kozua bokono ya SIDA te kaka po ovandaka, osumbaka to osukolaka esika Moto azali na bokono wana pe avandaka, asumbaka to asukolaka, to soki osukoli na eziba elongo moko na ye, to soki bovandi elongo moko na sauna.
- Epai ya mungana to ya munganga ya mino to na hôpital: Tina ya kobanga ezali te soki lolenge nyoso ya kosalisa babeli elandi mibeko ya hygiène, elingi koloba soki biloko bazali kosalela ezali ya usage unique (biloko basalelaka kaka mbala moko pe babwaki) to ezali ya solo na bokono te. Soki mobeli azui transfusion ya makila to ya mayi ewutaka na makila (plasma), tina ya kobanga kozua bokono ya SIDA etikali moke ata ndenge mibu ya kokengela makila ya kopesa ekomi makasi penza po bokono ya SIDA ezala na makila wana te, yango wana toli epesami boye: soki lipaso (opération) monene ekoki kozela (ezali urgente te), esengeli mobeli apesa makila na ye moko abombisa yango kina bakopesa ye yango mokolo bakopalula ye. Kisi oyo esalami na makila ekoki kozala na bokono ya SIDA te soki mibeko elandamaki ya yolo po na na ndenge ya koboma bokono.
- Kosukola to kokanga suki, kobongisa manzaka, kotobola matoyi to nzoto, kokata nzoloko: Tina ya kobanga ezali te, soki mibeko ya hygiène elandani ya solo. Biloko nyoso oyo etubaka to ekataka ezali ya kosalela mbala moko kaka soki ekutani ya makila, soki te esengeli koboma bokono solo solo (ko désinfecter ya solo). Po na kotobola matoyi to nzoto to kosala nzoloko esengeli kaka bato oyo batanga misala wana pe bazali na bisika bilandi mibeko.
[kobalola] Tala mpé
- Mode de fonctionnement du virus (frz.)
- Intégration et mode expression du virus (frz.)
- Dossier très complet sur le VIH, sa réduplication et les différents tests de dépistages d'Anne Decoster. (frz.)
- The Scientist: 25 Years with HIV - Its progressions, 1981-2006 and beyond (eine Flash-unterstützte Zeitskala) (engl.)
Categories: Móngana | Bokɔnɔ | Sida