Kongó-Kinsásá
From Wikipedia
|
|||||
Mokáno mwa ekólo: Bosémbo, Bobóto, Mosálá | |||||
Loyémbo-lokúmú: Debout Congolais | |||||
Mbóka-mokonzi | Kinsásá | ||||
Engumba monɛ́nɛ koleka | {{{engumba_monɛ́nɛ}}} | ||||
Nkótá ya lɛ́ta | lifalansé | ||||
Nkótá ya ekólo | lingála, kiswahili, ciluba, kikɔ́ngɔ |
||||
Mokonzi | Republiki Joseph Kabila |
||||
dipanda - dipanda na Bɛ́lɛjika |
- 1960-06-30 |
||||
Etando • Nyɛ̂ • Mái (%) |
2 345 410 km² (ya 12) 3.3 |
||||
Mito • 2006 ndakisa-mitúya |
62 660 551 (23) 29,916,800 27/km² (ya 182) |
||||
BOTIBO (BOZIBI) • Nyɛ̂ • moto na moto |
2003 ndakisa-mitúya 35,798 (ya 7) ya 189 (ya 189) |
||||
Mosɔlɔ | falánga ya Kongó (CFR ) |
||||
Ngonga • Summer (DST) |
UTC (UTC+1 na +2) - (UTC-) |
||||
Internet TLD | .CD | ||||
Calling code | +243 |
||||
Republiki ya Kongó Demokratiki ezalí esé ya Afríka ya Mambénga, ezwamí na ndelo ya ye ya mwa sánzá ya motóbá mikɔlɔ 30 1960, ekólo ya makokí, lipanda, bonsɔ́mí, ekanganí mpé ekabwaní tɛ́, ya bato, ya bokonzi boutí na bato mpé eponi eyamba yɔ̌kɔ tɛ́.
Etápe |
[kobalola] Lokótá
Na ekólo Kongó elobamí nkótá kama míbalé. Nyɔ́nsɔ wâná elakísí boyébí bwa bato ya bomɛngo etondi mabelé. Ciluba, kikongo, lingála mpé kiswahili izalí nkótá ínei inɛ́nɛ ya ekólo, kasi nkótá nkámá míbalé balobaka na ekólo Kongó.
Míngi sé na káti ya nkótá ya ekólo bokoyéba etando ya bikelá, mabelé, nyama mpé nzeté.
Bamɔ́ngɔ bazalí na nkómbó míngi ya nzeté ya mbíla na maye manso basálelaka. Sɔ̂lɔ, nzeté ya mbíla eyébaní káka mpó na mafúta na masanga tɛ̂. Eyébaní lokóla nkísi ekosílisa makɔnɔ, naye mpé bakosála bitúnga mpé bikila kila.
[kobalola] Lisapo
Ekakoli ya molái : Lisapo lya Kongó-Kinsásá
Tálá mpé: Ntángo ya banɔ́kɔ́ (Kongó-Kinsásá), Bɛndɛ́lɛ ya Kongó-Kinsásá, Almwali ya Kongó-Kinsásá
Zaïre ezalákí banda 1971 te 1999 nkómbó óyo ebêngámákí « Republiki ya Kongó Demokratiki », mfalanga ya ekólo wâná, mpé ebale óyo epésáká ekólo Kongó ebimélí na yě see mɔ̌kɔ́ na mayi-mozindo Atalantiki.
Congo belge elongákí lipanda na 1960, o nkómbó ya « Republiki ya Kongó », nkómbó nsé mɔ̌kɔ́ na kolonia ya kala ya Falansia - Kongó-Brazzaville. Nkómbó ya « Republiki ya Kongó Demokratiki » ezwamákí na 1966, kasi bikólo bíbalé basilákí koyébana míngi-míngi, mpé kokesana na nkómbó ya bingúmba-mikonzi bya bangó, mpɔ̂ na komíbêngama Kongó-Léopoldville (mpé Kongó-Kinsásá na nsima 1965), na Kongó-Brazzaville.
Nkómbó ya kala | Nkómbó ya sika (1965) |
---|---|
Léopoldville | Kinsásá |
Stanleyville | Kisangani |
Élisabethville | Lubumbashi |
Jadotville | Likasi |
Albertville | Kalemie |
Cocquilhatville | Mbandaka |
Costermansville | Bukavu |
Bakwanga | Mbuji-Mayi |
Luluabourg | Kananga |
Nouvelle Anvers | Makanza |
Port Francqui | Ilebo |
Banningville | Bandundu |
Paulis | Isiro |
Thysville | Mbanza-Ngungu |
Leverville | Lusanga |
Baudoinville | Moba |
Ponthierville | Ubundu |
Banzyville | Mobayi-Mbongo |
Élisabetha | Lukutu |
Charlesville | Djokupunda |
[kobalola] Bato
Ekakoli ya molayi : fr:Démographie de la République démocratique du Congo
est. | bato | source |
---|---|---|
1990 | 37 405 000 | (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ) |
1991 | ||
1992 | ||
1993 | ||
1994 | ||
1995 | 45 453 000 | (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ) |
1996 | 46 812 000 | (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ) |
1997 | 48 040 000 | (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ) |
1998 | ||
1999 | ||
2000 | 51 390 000 | (globaldefence.net) |
2001 | 53 624 718 | (yuli; CIA World Factbook) |
2002 | 55 225 478 | (yuli; CIA World Factbook) |
2003 | 56 625 039 | (yuli; CIA World Factbook) |
2004 | 58 318 000 | (CIA World Factbook) |
2005 | 60 085 804 | (yuli; CIA World Factbook) |
[kobalola] Bitúká bya Kongó-Kinsásá
Ekakoli ya molayi : Bitúká bya Kongó-Kinsásá
Biteni mikonzi bya Kongó-Kinsásá mibengami Bitúká (Provinces ya lifalansé). Kinsásá ezalí mboka mokonzi ya ekólo mpé efándeli ya bitúlúká bya ekólo. Ezalí na makokí ma engumba. Bingumba mpé bitúká biyángélámí, bizwí makokí ma koyángela yangó mɔ̌kɔ́ na mobéko mpé bikambémí na bato baye bazwamí na bitúká bike bya mbóka. Bitúká biina bia bonsɔ́mí bizalí mbóka mondɛ́lɛ́, komine, seketele mpé sefeli. Bitúká bya Kongó-Kinsásá bazalí:
- Bandundu
- Bas-Congo
- Ekwatéli
- Kasaï-Occidental
- Kasaï-Oriental
- Katanga
- Kinsásá
- Maniema
- Nord-Kivu
- Orientale
- Sud-Kivu
[kobalola] Bikela
Ekólo Kongó-Kinsásá ekɛndɛ nsángo mokili mobimba mpɔ̂ na bilɔ́kɔ bya mabelé ma yangó. Ya sɔ̂lɔ́ ekólo mɔ̌kɔ́ lisúsu tɛ́ na Afríka akokání na yɛ́ na nyama mpé zámba ndéngé na ndéngé.
[kobalola] Zámba na nyama : bobateli bwa bikela o káti ya zámba ya lɛ́ta
Bánganga-mayɛ́lɛ batángí ndéngé 11 000 ya nzeté, 409 ya nyama ya mabɛ́lɛ, 1086 ya ndɛkɛ, 1069 ya mbísi mpé 152 ya nyóka. Bokozwa tɛ́ na ekólo esúsu ya Afríka nzeté mpé nyama etángámí ndéngé na ndéngé.
- Na ekólo Kongó, bokozwa mangómbá, bisóbé, bibale na měta; bokozwa mpé zámba ndéngé míngi lokóla zámba ya mokili mwa molungé, nzeté ya bozángi mái, bisóbé mpé bikombo.
- Nyama ya sékô baye bavandaka nsé wâná, lokóla mondonga, bonobo, lokulokoko la Kongó, mpé gambala ya mái. Sɔ́kí tobébísí zámba na bangó, bakolímwa elɔngɔ́.
[kobalola] Bikela bikopɛ́sɛ bilɔ́kɔ bya kobóngola
Mbɔ́ngɔ ekɔ́tisa nzeté mpé mabángá ya ntálo ezalí na esíká enɛ́nɛ na káti ya ekólo Kongó.
- Mabelé o ekólo Kongó etóndí mabángá ya ntálo lokóla wólo, kobalti, etani, koltani, jemanyu, diamá, mbɔ́ngɔ, mbéngi, b.n.b.
Na ntángo ya kala, mabángá masúsu mazalákí na ntína tɛ́. Lɛlɔ́ ntína na bangó ntembe nyɛ̂. Lokóla koltani ebwákámákí lokóla bosɔtɔ bwa etani. Lɛlɔ́, mosála ya elektroniki esɛ́ngí tantalu, mpé na mikolo mya lɛlɔ́, balokotaka ndámbo iyíké ya etani mpɔ̂ na kobóngola.
Aluminyu na mbéngi ezwamaka na ndámbo ya mítuka mpé bilɔ́kɔ bya mwǐnda. Na mbóka inɛ́nɛ, ba fondele basálaka bilɔ́kɔ ya bosálisi, kasi ntángo esusu, bilɔ́kɔ ya kotála elɛngi. Mpɔ̂ na mipaya, bakosála bilɔ́kɔ na nsinga ya aluminyu, sɔ́kí mpé na mbéngi ; mpɔ̂ na bǎna bakɛ́, bakosála bilɔ́kɔ ya lisano.
Nzeté izalí na lisálisi linɛ́nɛ na káti ya mbóka, lokóla nkona, ekokí mpé kobóngwama, bakotɛ́kɛ yangó mpé na mbóka mopaya. Nzeté ya ekólo esɛ́ngámí míngi mpɔ̂ na mosála ya libaya, nzeté ya moyíndo mpɔ̂ na bilɔ́kɔ ya ndáko, mabaya ya kotíka na mabelé, mpé mabaya ya mbóngwana enɛ́nɛ.
[kobalola] Bikela bikopɛ́sɛ biléi mpé nkísi
Bikela bipɛ́sí nyama, nkásá mpé nzeté ya kosálisa bokɔnɔ ndéngé na ndéngé. Bisálélí bína ya mikɔlɔ na mikɔlɔ bilakisi mayɛ́lɛ ma bato.
Sɔ́kí tolongolí bokila na ndɔbɔ́, bato ya mbóka balokota na zámba mbuma, nzɛnzɛ, mayɛbu, nzói mpé bakotɛ́kísá na nzelá sɔ́kí mpé na zándo.
Na mbóka isúsu mbiye ekopɛ́sá moto bokási na 40 %.
[kobalola] Bikela bisálí mpé lokóla lopitálo.
- Nkísi lokóla ilulumba esálisa bokɔnɔ bwa mpulúpulú, esílisa mokosa, bokɔnɔ bwa ndɛkɛ mpé kɔsúkɔsú. Esɛ́ngɛ́lí toyéba. Mayɛ́lɛ ya banganga nkísi ya Balele etángí nzeté 123. Bosálisi ya banganga ya Baluba esɛ́ngí míngi nzémbo.
- Babênga nkómbó Bambuti mpé Baife baye bavándí na zámba Ituri bazalí na ekelá bya bangó. Bambuti bayébí nyama ya koleka nkámá míbalé (200), mpé nzeté ya koleka nkámá mɔ̌kɔ́ (100). Bakobóma nyama na basinga. Kasi Baife, bakobenga mpé bakoboma nyama na mbanzi mpé na makongá.
[kobalola] Politíki
Ekakoli ya molayi : Politíki bya Kongó-Kinsásá
Mobéko-likonzi :
Bakambi-ekólo :
- 1960 - 1965 Joseph Kasavubu
- 1965 - 1997 Mobutu Sese Seko
- 1997 - 2001 Laurent-Désiré Kabila
- 2001 - lɛlɔ́. Joseph Kabila
Bakambi Lɛ́ta :
- 1960 - 1960 Patrice Lumumba
- 1961 - 1961 Joseph Iléo
- 1961 - 1964 Cyrille Adoula
- 1964 - 1965 Moïse Tshombe
- 1965 - 1965 Evariste Kimba
- 1965 - 1966 Léonard Mulamba
- 1966 - 1977 ?
- 1977 - 1979 Mpinga Kasenga
- 1979 - 1980 Bo-Boliko Lokonga Mihambo
- 1980 - 1981 Jean Nguza Karl-I-Bond
- 1981 - 1982 Joseph Untube N'singa Udjuu
- 1982 - 1986 Kengo Wa Dondo
- 1987 - 1988 Mabi Mulumba
- 1988 - 1988 Sambwa Pida Nbagui
- 1988 - 1990 Kengo wa Dondo
- 1990 - 1991 Lunda Bululu
- 1991 - 1991 Mulumba Lukoji
- 1991 - 1991 Étienne Tshisekedi
- 1991 - 1991 Bernardin Mungul Diaka
- 1991 - 1992 Jean Nguza Karl-I-Bond
- 1992 - 1993 Étienne Tshisekedi
- 1993 - 1994 Faustin Birindwa
- 1994 - 1997 Kengo Wa Dondo
- 1997 - 1997 Étienne Tshisekedi
- 1997 - 1997 Likulia Bolongo
[kobalola] Jyografi
Ekakoli ya molayi : Jyografi bya Kongó-Kinsásá
- Tálá mpé : Zamba o ntando ya ebale Kongó | Molɔngɔ́ mwa bingumba bya Kongó-Kinsásá
[kobalola] Ekonomi
Ekakoli ya molayi : Ekonomi ya Kongó-Kinsásá
Tala mpe : Coltan
[kobalola] Kiltiri
Ekakoli ya molayi : Kiltiri ya Kongó-Kinsásá
Date | Nkombo na lifalansé | Nkombo na lingala | Ntembe |
---|---|---|---|
4 janvier | journée des Martyrs de l'indépendance | ||
17 janvier | journée du Héros National et de ses compagnons d'infortune | ||
30 juin | date anniversaire de l'indépendance | Mukolo ya Lipanda | |
16 février | journée des Martyrs de la Démocratie | Mokolo ya baye bakufa pona demokrasi | |
17 mai | date anniversaire de la libération du Peuple de la tyrannie |
[kobalola] Divers
- Données chiffrées
- Forces française hors de la métropole
[kobalola] Tála mpé
- Santé en République démocratique du Congo
[kobalola] Mankásá o libándá
- Carte du Congo (1958)
- Informations d'Amnesty International
- Site du Gouvernement
- Site de l'ambassade à Bruxelles
- Site du Ministère des Finances
- Site de la Banque Centrale du Congo
- Site du Ministère de la santé
- Site du Ministère des mines
- Site du Comité de Coordination des Ressources Extérieures
- Site de l'Unité de coordination du Projet
- L'Avenir - Basango na Lingala
Bisé ya Afríka |
Bisé ya Afríka ya Méditeranéa : Aljeria · Ejipte 1 · Libîya · Marɔkɛ 3 · Tunisia Bisé ya Afríka ya Wesita : Bénin · Burkina Faso · Cap-Vert 2 · Côte d'Ivoire · Gambie · Ghana · Gine · Gine-Bisau · Liberia · Mali · Mauritanie · Nizer · Nizeria · Sénégal · Sierra Leone · Togo Bisé ya Afríka ya Katikati : Kamerun · Santrafríka · Kongó-Brazzaville · Kongó-Kinsásá · Gabon · Gine-Ekwatorial · São Tomé-na-Príncipe · Tshadi Bisé ya Afríka ya Esita : Burundi · Djibuti · Elitré · Etiopi · Kenya · Uganda · Rwanda · Seyshel 2 · Somalia · Sudan · Tanzania Bisé ya Afríka ya Sidi : Sidafríka · Angola · Botswana · Komori 2 · Lesoto · Madagasikari 2 · Malawi · Morisi 2 · Mozambiki · Namibia · Swaziland · Zambia · Zimbabwe |
Bisé mosusu : Sahara ya Límbe 4 · Somaliland 1 ezalí kaká eténi ya Afríka ndámbo 2 ekólo óyo ekútání o káti ya mái-mozindó 3 ezalí eténi ya Lisangá ya Afríka te 4 endimámí na bikólo niɔ̌nsɔ ya molɔngɔ́ tɛ́, kasi ezalí eténi ya Lisangá ya Afríka |