Libale
From Wikipedia
Libale ezalí enama tǒ etení ya nzóto ya moto mpé nyama isúsu, eye ezalí o ntéi ya libumu. Ezalí eténi ya nzelá elekaka bilía na líkundú. Esálaka mpé ebimisaka mái ma bololo mabómbamaka o nyɔ́ngi. Mái ma bololo maye mabúkisaka mafúta ma biléi. Mpé libale libóngolaka mafúta na sukáli mpɔ̂ na kobomisa yangó ntángo makilá mazánga sukáli.
[kobalola] Tálá mpé
![]() |